Ephesians 5

1Lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, esengeli mpe bolanda ndakisa na ye.

2Tika ete bolingo emonana na bomoi na bino, ndenge mpe Kristo alingaki biso mpe amikabaki ye moko mpo na biso, lokola malasi ya solo kitoko mpe mbeka epai ya Nzambe.

3Mpe na oyo etali pite, to bosoto nini, to mpe lokoso ya kozwa biloko, emonana kutu te kati na bino, pamba te yango ekoki te na basantu; 4ata mpe makambo ya soni, to maloba ya bozoba, to mpe maseki, pamba te yango ezali malamu te mpo na bino; kasi malamu bobimisaka maloba ya kozongisa matondi. 5Pamba te, boyebi yango malamu ete: ata moto moko te oyo asalaka pite, makambo ya bosoto, atonda na lokoso ya kozwa biloko (pamba te lokoso ezali kosambela bikeko), akokota te na Bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe.

Bomoi Kati Na Pole

6Moto moko te akosa bino na maloba oyo ezangi tina; pamba te, ezali mpo na makambo wana, nde kanda ya Nzambe eyaka likolo ya bato oyo bazangi botosi.

7Bosangana na bato wana te. 8Pamba te, liboso bozalaki molili, kasi sikʼoyo bozali pole kati na Nkolo. Yango wana, bozala na bizaleli ya bana ya pole; 9pamba te mbuma ya pole emonana kati na nyonso oyo ezali bolamu, bosembo, mpe bosolo. 10Bosala nyonso mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo.

11Bosangana te na misala ya molili oyo ebotaka mbuma te, nzokande bobimisa yango na pole. 12Pamba te, makambo bato wana basalaka na sekre, ezali penza soni mpo na koloba yango. 13Kasi soki babimisi makambo yango na pole, na tango wana nde lolenge na yango oyo ya solo-solo emonanaka polele. 14Pamba te, ezali pole nde emonisaka makambo nyonso polele. Yango wana elobama : “Lamuka yo moto olali pongi, sekwa kati na bakufi mpe Kristo akongengisa moi na ye likolo na yo !”

15Bongo, bokeba mingi mpo na bizaleli na bino; bozala te lokola bato bazangi mayele, kasi bozala lokola bato oyo bazali na mayele. 16Bosalela tango malamu, pamba te mikolo ezali mabe.

Bomoi Na Nzela Ya Molimo

17Yango wana bozala bazoba te, kasi boluka kososola soki mokano ya Nkolo ezali nini.

18Bolangwa masanga te, pamba te yango ememaka na mobulu; kasi botondisama na Molimo. 19Bolendisana moko na moko kati na banzembo, masanzoli mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo; boyemba mpe bokumisa Nkolo kati na mitema na bino. 20Bozongisaka matondi na Nzambe Tata, na tango nyonso mpe na makambo nyonso, na kombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.

Mateya Mpo Na Basi Mpe Mibali

21Botosanaka moko na moko kati na bobangi Kristo. 22Basi, botosa mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. 23Pamba te, mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Kristo azali mokonzi ya Lingomba: nzoto na ye, oyo ye azali Mobikisi na yango. 24Lokola Lingomba etosaka Kristo, ndenge moko mpe basi batosa mibali na bango na makambo nyonso.

25Mibali bolinga basi na bino ndenge mpe Kristo alingaki Lingomba mpe amikabaki ye moko mpo na yango, 26mpo ete akomisa yango ya bosantu, na nzela ya Liloba, sima na kokomisa yango peto na nzela ya kosukola yango na mayi; 27mpo ete alakisa yango na ye moko, Lingomba oyo etondi na nkembo, ezangi bosoto, ezangi likwanza, ata mpe eloko moko te ya ndenge wana, kasi ezala ya bosantu mpe na mabe ata moko te.

28Ndenge moko mpe, mibali basengeli kolinga basi na bango ndenge balingaka nzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye, amilingaka ye moko. 29Pamba te, moto ata moko te asiʼayina nzoto na ye moko, kasi aleyisaka yango mpe alengelaka yango malamu, ndenge moko mpe Kristo asalaka Lingomba, 30pamba te tozali biteni ya nzoto na ye.

31“Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.”

32Sekre oyo ezali monene penza; kasi ngai nazali koloba mpo na Kristo mpe Lingomba. 33Mpo na bino, esengeli ete moto na moto kati na bino alinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi asengeli kotosa mobali na ye.
Copyright information for LinMNB